Mia zomi na mitano, sanza ya libwa : mokolo bakolobelaka démocratie kati na molongo mobimba

16 sep 2015

Mia zomi na mitano, sanza ya libwa : mokolo bakolobelaka démocratie kati na molongo mobimba

Martin Kobler, mokonzi ya MONUSCO na Jose Maria Aranaz, ntoma ya Commissaire enene mpo ya makoki ma moto mpe bobundeli botosami bwa makoki matali politiki na bonsomi mpo ya bato banso

Kinshasa, mia 15 sanza ya libwa awa na mobu 2015 - «Mokolo mwa Démocratie kati na molongo mobimba ezali mokolo mwa litomba mpo ya République démocratique du Congo na maponomi maye makosalema. Bobele se botosami bwa mibeko mia démocratie, kopesa nzela na ba mbanda ya politiki na mpe bai société civile, ekoki komema na pole mpo maponomi makoka kosalema na kimia."

Na bai mboka pene na million ntuku sambo na mitano, wapi bilenge bazali baiké, République démocratique du Congo etondisami na mikakatano mpo ntombwa eyingela na mpe boyangeli bolamu. O ngambo ya lisungi lia mbula matari na liye lia bai mangomba ma politiki, lisungi lia société civile lizali na litomba mingi mpo bai mboka bakoma na lobiko lolamu na mpe ntombwa ya nkita. Na mpo yango, l'Etat esengeli kosimba libaku lina lia bobembani na société civile mpo esunga bai mboka bakoka koyingela na biteni binso bia ekolo. MONUSCO na ONU izali kokoba kosunga mbula matari ya RDC na biteni bisusu mpo ya kokembisa démocratie mpe kokoma kino na ntombwa.

Ezali na litomba mingi mpo ya kokotisa botosi bwa makoki na bonsomi bwa politiki, na botikaka nzela na bonsomi bwa bopanzi sango, masanga na makita mpo ya bato banso , na mpe masanga ma ba mbanda ya politiki, ma bapanzi sango, bisalelo bia bopanzi sango na mpe masanga ma société civile, tango na kobanga'te babalandela, na bolengeli maponomi", bo ebetaki sete Maria Jose Aranaz.

Nkoma mpo ya bakomi:

Na sanza ya libwa mobu nkoto yoko nkama libwa na ntuku libwa na sambo, Union interparlementaire (UIP) endimaka booko mikano mia démocratie mpo ya bato banso. Mikano mina mindimi mibeko mia démocratie, misala mia mbula matari eye ezali kotambola na démocratie na mpe lolenge démocratie eyebani kati na molongo.

Na bosenga bwa UIP, mia zomi na mitano sanza ya libwa (mokolo moye basakolaka démocratie na bato banso) eponamaki mokolo moye bai molongo bakokundolaka mobu na mobu, mokolo mwa démocratie kati na molongo. Mokano na nkombo lisungi na makasi ma ba mbula matari mpo ya kofandisa mpe

kokolisa ba démocraties ya sika, ONU endimaka yango na boyokani na banso mia mwambi sanza ya zomi na moko mobu nkoto ibale na sambo.

*Traduit par Lucie Amba